25-0601 Epimelo Ya Moto Oyo Abongi Be

NSANGO: 62-1014M Epimelo Ya Moto Oyo Abongi Be

PDF

BranhamTabernacle.org

Balingami Bikeko Ya Bomoi,

Mongóngó tozali koyóka likoló ya ba bande nde Ulimi Tumími ya Nzambe epai ya Mwasi na Ye ya libala. Ekokisi mpenza sikawa bokútani elongó Mwasi na Ye ya libala kati na motema moko mpe lobánzo lokó kozala lingomba litóndí solo na Molimó, litóndí na nguya ya Nzambe, kofanda elongó na bisiká ya Likoló, kopesa mbeka ya molimó, masánzoli ya Nzambe, na Molimó Mosanto kotambola na kati ya bisó.

Klisto atindelákí bisó Molimó Mosanto na Ye koloba na nzela ya mwanje na Ye ya nsambo kotonga bisó pelamókó bato kati na litongi ya ya Yesu Klisto, ete tókoka kozala ndako makasi mpe efándelo ya Molimó Mosanto, na nzela ya Liloba na Ye.

Tozali basangoli ya nyoso. Ezali bozui ya bisó moko, EZALÍ ya bisó. Ezali likabo ya Nzambe epai na bisó, mpe moto te akokoka kolongwela bisó yango. EZALI YA BISÓ.

“Oyo esengi bino epai ya Tata kati na Nkombo ya Ngai, Nakosala yango.” Nani nde akoki koángana eloko ata nini kuna? “solo, solo, Nayebisi bino, soko bokoloba na ngomba oyo, ‘ longwá,’ obéti ntembe na motema na yo te Kasi ondimí ete yango elobí yo ekokokisama, okoki kozua eloko nini elobí yo.” Elaká nini oyo! Esúki te kaka na lobíko ya nzoto, kasi ézala ata likambo nini.

Nkembo na Nzambe…ELÓKO SÉ ELOKO ELÓMBÍ BISÓ!

Útá ebandeli ya ntango, bozalisi nyoso ya Nzambe bozalaki kokímela mpe kozila mokolo litóndí ya bana ya Nzambe bakomónisama. Mokolo yango ekómí. Mokolo yango yango oyo. Ntango yango yango oyo. BISÓ nde bana mibali mpe bana basi yango ya Nzambe.

TOZALÍ esáleli mobimba ya bomoi oyo Nzambe azali kotambola kati na yango, Azali komóna kati na yango, Azali kosolola kati na yango, Azali kosala kati na yango. Ezali Nzambe, kotambola likoló na makolo mibalé, KATI NA BISÓ.

Tozali mikandá mia Ye mikomámí mitángámí na bato nyóso. Baponami na Ye, babongisami libosó, bana mibali mpe basi ya Nzambe baoyo batiamí na bokonzi ya bana oyo Azali kosala kati na moto ya bomoi, elilíngí ya bomoi, litongi ya moto oyo abongí be.

Tofúkami bisó mpenza libosó ya Nzambe ya bomoi, nguya ya bomoi, boyebi ya bomoi, motema molai ya bomoi, bobóto ya bomoi, Nguya ya bomoi koúta na Nzambe ya bomoi, ekómisí moto ya bomoi elilíngí ya bomoi kati na litongi ya Nzambe.

Ezali Klisto, kati na moto ya Molimó Mosanto likoló na bisó, na libatisi ya solo ya Molimó Mosanto na Ye, na mabongi ma Ye manso matiámí elembo na kati na bisó. Nzambe, kobika na kati na bisó kati na Mongómbo mobiangamí Litongi.

Mongómbo ya bomoi, ya efandelo ya Nzambe ya bomoi; Lingómbá libongí be, mpo ya Libángá ya motó kozipa bisó.

Nzambe atindaki mosakoli kobianga Mwasi ya libala kobima mpe kokamba ye. Ezalakí Adama na Ye ya libosó azóngisámí mobimba, litongi ya moto abongí be kati na mokolo ya bisó, komónisa Liloba na Ye epai ya Mwasi na Ye ya libala.

Nakokí kolongwa na yango te. Eloko moko te ekokí koningisa ngai. Etalí ngai te oyo moto ata nani alobí; ekoningisa ngai ata ndambo te. Nakotíkala kaka wana.

 Nakozila, kozila, kozila, kozila. Bokeseni moko ezalli te. Etíkálí bobele wana. Na nsima, mokolo moko, Nakogánga elongó na basanto basúsu na lobánzo moko:”Tozali kopéma na kondimisama likoló ya Liloba moko na moko! Na nsima Okotálisa BISÓ epai na Ye. Na nsima tokozonga bisó nyoso na mabelé lisúsu, kobika libela.”

Nalakí, na ntóngó oyo, epai na Ye, na motema na ngai nyoso, ete, na lisungí na Ye mpe na ngolu na Ye, Nakobondela ete Nakoluka mokolo na mokolo na kozanga kotika, kino Náyoka moko na moko ya bosenga oyo kokita kati na mwa litongi ya kala oyo ya ngai, kino Nakokoka kozala bomónisami ya Klisto ya bomoi.

MPO YA NGAI, koyóka Mongóngó ya Nzambe likoló ya ba bande ezali etandelo ya Nzambe mpo ya lelo. Ezali Liloba ya bomoi ya Yesu Klisto. Ezali Etémelo ya ngai éngébéné na Liloba ya Nzambe. Ezali nzela ya Nzambe epesami mpo ya lelo.

Na bongo, Nalingaki kobianga yo ómibakisa na ngai mokolo mwa Lomíngo na 12:00 nsima ya nzángá, ntango ya Jeffersonville, lokola Nazali koyóka William Marrion Branham, oyo Nandimí azali Mongóngó ya Nzambe mpo ya mokolo ya bisó, kolakisa Mwasi na libala ya Klisto lolengé ya kokóma: Litongi Ya Moto Oyo Abongí Be 62-1014M.

Ndeko Joseph Branha

Makomi ya kotanga libosó ya Litéya:

St. Matai 5:48

St. Luka 6: 19

St. Yoane 1:1 / 3:3/ 3:16 / 5:14/ 14:12

Misala 2:38 / 7:44-49 / Mokapo ya 10 / 19:11 /28:19

Baefese 4:11-13

Bakolose Mokapo ya 3

Baebele 10:5 / 11:1 / 11:32-40

Yakobo 5:14

2 St. Petelo 1-7

Yisaya 28:19