NSANGO: 60-0518 Kotiama Lokumu Ya Mwana #2
- 25-0511 Kotiama Lokumu Ya Mwana #2
- 20-0620 Kotiama na bokonzi ya mwana # 2
- 18-0617 Kotiama Lokumu Ya Mwana #2
- 16-0224 Kotiama Lokumu Ya Mwana #2
Balingami Bokonzi Ya Bonganga,
Moto nyoso súa mosapi na yo míno, finá bomoto na yo, mpe kámólá motema na yo. Lelo, Mwasi ya libala ya Yesu Klisto azali kogánga:
Lelo oyo, lisakoli oyo likokísámí libosó na miso ma bisó.
Nandimí, moko ya mikolo oyo ya nkembo, ntango ebólo ya lisangá ya lingomba bakei elongó, mpe pápa ya sika ayéisami longwá na Amerika mpe atíami kúna éngébéné na lisakoli, na bongo bakosala elembo lokola ya nyama.
Mongóngó ya mosakoli ya Nzambe elobakí Yango na sánzá ya Zómi na mibale mikolo ya sánzá 19, na 1954, mpe sánzá 9 nsima, Robert Prevost, oyo ayebámí sikawa lokola Pápa Leo XIV, abótámaki. Azali sikawa pápa ya sika ya Lóma. “Yango Elobí Yawe ekokísámí.
Sanza ya Mítáno na mikolo ya sánzá 7, na 1946, Nzambe atíakí mosakoli na Ye na Green’s Mill, Indiana, kopesa ye lotómo na ye mpe kosangela epai ya mokili, oyo azali mwanje na Ngai ya nsambo motindami ya nguya, Mongóngó na Ngai epai ya mokili. Bóyóka Ye.
Ntango Mwanje ya Nkoló akútánákí na Ngai libandá kuna na Green’s Mill, Indiana, esili koleka mbúla mwambe, útá ezalaki ngai bobele mwana, kolanda ngai, komónisa bimónoneli, ntango Nakendeki epai na Ye, Alobaki: “Soko okozala sembo, omemi bato Kondima yo, eloko moko te ekotelema libosó ya libondeli.”
William Marrion Branham azali Mongóngó ya Nzambe moponami epai ya mokili. Mosakoli ya nguya oyo Liloba ya Nzambe liyaka epai na ye. Kokokana na Liloba, azali BOBELE ye nde molimboli ya Bonzambe ya Liloba ya Nzambe.
Andimísamaki na Nzambe Ye moko, na nzela ya Likonzí ya Móto.
Sánzá ya Mitáno, mikolo ya sánzá 7, 2025, SATANA atiaki likita ya ba Kadinali kati na Ndakonzambe ya Sistine kati ya Loma kopona Mokitani na bango ya Klisto, kokokisa Yango Elobí Nkoló.
Andimísamaki na moto na LIBÓNDO YA MÓLINGA PÉMBÉ.
Mwasi ya libala ya Klisto zingázingá ya mokili mobimba azali kosepela, kogánga, kobéta milóló mpe kopesa lokúmu na Nkoló, lokola tozali koyóka, mpe komóna na miso ya bisó moko, lisakoli ya mosakoli kokokisama.
Ezali lokola nde tozalaki komóna Mái Motáné kofungwama libosó na míso ya bisó. Máná ma sika kokwéa longwá na etando ya likoló. Nkóto mbala nkóto ya bandeke koleisa Mwasi ya libala. Mái kobima na Libángá. Móto kokita mpe kozíkisa mbeka elongó na Elia.
Lisakoli lizali kokokisama mokolo nyoso. Liloba ya Nzambe lilakámí lizali komónisama kati na bomoi ya bisó. Makambo mazali kosalema nyoso zingázingá na bisó.
Mwasi ya libala amílengeli Ye moko na boyókáká mpe bondimáká Liloba. Tozali Liloba likómí mosuni.
Ya solo, tokómí. Ntango ebélemí. Mwasi ya libala azali kosepela mpe kosangana elongó zingázingá na mokili mobimba lokola libosó naino soko moké te. Mosakoli azali kopesa endimiseli epai ya Mwasi ya libala na boyébisáká bisó tozali bokonzi ya bonganga ya Nzambe, libota bule, bato godi baoyo babiangámí kobima, toponámí, tozuami kati ya ebelé, mpe totiami pembeni.
Tozali SIKAWA Bana Mibali mpe Bana Basi ya Nzambe, tokambamí na Molimó ya Nzambe; na moto te, kasi na Molimó. Toyebi, na elilingi ya ntembe ata moké te, TOZALI MWASI NA YE YA LIBALA. KONDIMA ya bisó ezali komata na misándá ya sika mokolo na mokolo. Ezali na kotelemisa bisó to kotámbwisa bisó malémbe te, Nzambe amónisaki mpe atíí Yango lóngo kati ya motéma mpe bomoto ya bisó.
Mwasi ya libala ayebi mobimba mpenza tozali ba nani.
Tozali kati na Mboka na bisó ya elaká ya molimó, wana ezali bisó na litondí ya bozui ya eloko nyoso. Tozali na Kimia ya Likoló, Mapamboli ya Likoló, Molimó ya Likoló. ELOKO NYOSO EZALI YA BISÓ. Tozali sé komilengele mpo na oyo azali na yango na ntango ekolanda mpo ya bisó.
Kelelo ya Nkoló ekoyúla, mpe bakúfi kati na Klisto bakosekwa libosó.
Nzóto iye ya lóla ikokita mpe ikoláta ya mabelé, nzóto ya nkembo mpe ikobongwana na mwa ntango moké, ya kobwéta líso.
Tokozuama na likoló elongó na bango, kokutana na Nkoló na mipepe.
Mokolo nini oyo. Ntango nini oyo. Ezali na ndengé te mpo ya ngai koloba kati na maloba ya bato oyo ezali bisó nyoso koyóka kati ya bomoto na bisó. Mitema mia bisó mizali kobeta noki-nokí.
Bisó te nde tozali kosala ékóma, Molimó Mosanto azali lokola etóko ya etele kopunjwa-punjwa kati na bisó. Mwasi ya LIBALA azalaki kozila ntango oyo longwá na mikolo ya Adáma…MPE BISÓ OYO AWA SIKAWA.
Totómbeli yo boyéi bolámu. Tobiangí yo. Tobondeli yo. Yaka komíbakisa na bisó mpo ya ntango ya káfú-kafu koleka mokili motíkalá ndèle koyeba, lokola tozali koyóka Mongóngó ya Nzambe komónisa Liloba na Ye epai na bisó Lomíngo loye na 12:00 nsima ya nzángá, ntango ya Jeffersonville, lokola tozali koyóka: 60-0518 Kotiama Na Bokonzi Ya Bana#2.
Ndeko Joseph Branham
Makomi ya kotanga libosó ya Liteya:
Genese 1:26
Baefese Mokapo ya Libosó
Baloma 8:19
Bagalatia 1:6-9
Baebele Mokapo ya motoba
Yoane 1:17