Nsango: 60-0515e KOTIAMA NA BOKONZI YA MWANA # 1
- 25-0504 KOTIAMA NA BOKONZI YA MWANA #1
- 21-0620 KOTIAMA NA BOKONZI YA MWANA #1
- 18-0603 KOTIAMA NA BOKONZI YA MWANA #1
- 16-0221 KOTIAMA NA BOKONZI YA MWANA #1
Balingami Baoyo Batiamí na Bokonzi ya Bana,
Tozali sikawa kolia biloko ya makasi ya Nzambe mpe tozali na lisósoli polélé-polélé ya Liloba ya Ye. Nzambe apésí bisó Emóniseli solo ya Liloba na Ye. Likanisi nyoso ya bisó ya molimó ezangí kobúlungana.
ToYEBÍ mpezá Azali Nani. ToYEBÍ mpenzá Oyo ezali Ye. ToYEBÍ mpenzá wapi ezali bisó kokende. ToYEBÍ mpenzá tozali ba nani. ToYEBÍ kati na Nani nde tondimelí mpe tondimisamí Azali na makokí ya kobatela yango etíí bisó epai na Ye mpo ya mokolo yango.
Alobaki mpe Amónisaki sekelé nyoso ibómbamákí longwá na bozalisi ya mokili epai na bisó. Ayebisaki bisó boni basúsu babóyakí ntango nyoso nzela ya Ye oyo epesámakí mpe basepelakí na bokambami bosúsu, kasi Akozala na etonga moke oyo ekotíkala sembo na Liloba ya Ye.
Na mokili mobimba, bakoyanganisama na esiká moko te kozala na makambo kati ya Bo moko. Kasi mwa bibólo ya bangó bakopalangana na mabelé manso.
Nkembo, topalanganisámí na mabelé manso, kasi tosangisámí lokola Moko na nzela ya Bofináká Play mpe koyoka Mongóngó ya Nzambe koloba na bisó.
Tólokota mpe tóléta libosó yango ekozala Ye kolobela bisó na nzela ya mwanje na Ye ya nguya na mokolo mwa Lomíngo.
Balingami na ngai Baponami, bozali sasaipi kofanda elongó kati na bisiká ya Likoló. Ezali bobele te libandá na esiká ata wapi, kasi kati na bisiká ya “Likoló”; ezali etémelo na yo lokola mondimi. Ozali kati ya mabóndeli mpe obélemí mpo ya Liteya. Boyangani elongó lokola babúlami, bobátisámí na Molimó Mosanto, botóndi na mapamboli ma Nzambe.
Bobiangamí, boponami, mpe Molimó mwa bino momemámí kati ya molungé ya molimó.
Nini nde ekokaki kokóma. Molimó Mosanto ya Ngai akozala kotámbola likoló ya motema moko na moko. Bobóngwanisámí mpe bokómí bikelámu ya sika kati na Klisto Yesu. Masúmu ma bino manso mazali na nsé ya Makila.
Bozali Kati ya kosambela ebongí be, na maboko mpe mitema mia bino itómbwí likoló epai ya Ngai, kosambela Ngai elongó kati na bisiká ya Likoló.
Bobongisamákí libosó, Boponamákí, kati na Boyebi na Ngai makambo libosó. Boponamí, Bobulisámí, Bolongisámí na nzela ya Bobongísamáká libosó. Ekokoka ata ndambo te mpo ya bino kozímbisama. Nabongisaki bino libosó ya bozalisi ya mokili. Bozali Nzambe moké, botiámí Elembo na Molimó Mosanto ya elaká; bobele kobótama kati ya libota te, Bana na Ngai Mibali mpe Basi baoyo batiamí na bokonzi ya bana.
Nakopambola bino na lobíko ya nzoto ya bonzambe, boyebi makambo libosó, emónoneli, bimónoneli, nguya, minoko, ndimbola, bwanyá, boyebi, mpe mapamboli manso ma Likoló, na esengo ezangi maloba mpe etondi na Nkembo.
Motema moko na moko mokotónda na Molimó na Ngai. Bokozala kotambola elongó, kofanda elongó, kati na bisiká ya Likoló. Ata likanisi moko mabé kati na bino te, likáyá liokó libendámí te, elamba yoko ya mokúsé te, oyo te, oyo kuna te to mosúsu, likanisi moko ya mabé te, moto moko te na likambo kotemela mosúsu, moto nyoso koloba kati ya bolingo mpe boyokani, moto nyoso na lobánzo lóko moto na moninga na ye kati na esiká moko.
Nde na pwasa lolaká lokola mopepe ya makeléle makasi lokoúta na Likoló mpe Nakopambola bino na mapamboli nyoso ya molimó. Na nsima bokozala lokola Dawidi, kobina libosó ya Sandúku, koyebisa MOKILI ete bozali na nsóni te, BOZALI MWASI NA NGAI YA LIBALA YA BANDE! Bofinaka Play MPE bondimaka LILOBA MOKO NA MOKO Nalobí. Bokoki koningana te, mpe bokoningana te!
Basúsu bakoki koboya Yango, to basósólí Yango te, kasi epai na bino, Ezalí Elembo Ya bino ya Lokúmu. Lokola Dawidi alobaki na mwasi na ye; “okanisí ete oyo nde likambo, zilá kaka kino lobi, tokozala kútu koyóka ba bande koleka, kosanzola Nkoló, wana totóndí na Molimó na Ye; zambí tozali kobika kati ya Kanana, tokangami na mboka ya elaká.”
Na mbísa Nakotala na nsé longwá na Lola mpe Nakoyebisa bino:
“Bozali Mwasi ya libala kokokana na motema mwa Ngai Moko.”
Mapamboli maye makoki kozala ma yo mpe lokola. Yaka, míbakísa na bisó Lomíngo loye na 12:00 nsima ya nzángá, ntango ya Jeffersonville, mpe bíká bozali ya Nkoló lokola libosó naino soko moké te lokola tozali koyóka Mongóngó ya Nzambe mpo ya lelo koloba na bisó mpe komemela bisó Liteya: Kotiama Na Bokonzi Ya Mwana #1 60-0515E.
Bokanisa, oyo ezali epai ya lingomba, ya moto ya libándá te. Ezali libombami kati ya sámbole epai na ye, makoki ya kosósola soko moké te, eleka likoló ya motó na ye, ayebí eloko moko te likoló na yango koleka eloko ata nini. Kasi, epai ya lingomba, ezali mafuta ya nzóto likoló ya libángá, ezali esengo ezangi maloba, ezali endimiseli epambolami, ezali lóngo ya bomoto, ezali elikia mpe efandeli ya bisó, ezali Libángá ya Bileko, oo, ezali nyoso oyo epusi malamu. Zambí likoló mpe nsé ikoleka, kasi Liloba ya Nzambe likoleka soki moké te.
Ndeko Joseph Branham
Makomí makotabga libosó ya Liteya:
Yoele 2:28
Baefese 1:1-5
I Bakolinti 12:13
I Petelo 1:20
Emoniseli 17:8
Emoniseli 13