25-0216 Mpóso Ya Ntuku Nsambo Ya Danyele

NSANGO: 61-0806 Mpóso Ya Ntuku Nsambo Ya Danyele

PDF

BranhamTabernacle.org

Balingami Batáleli & Bazili,

Ezali na bosepeli bonéne kati ya Mwasi ya libala lokola libosó naino soko moké te. Tozali kati na bozili na etíngiá monéne; mbúla na bisó ya yubile ebélemi koya. Mwasi ya libala azilá ntango molai mpenza mpo ya mokolo oyo kokóma. Nsúka ya likabo ya Mabota ekómí mpe ebandeli ya Sekó na séko elongó na Nkoló na bisó ekobanda nokí.

Tozali kosósola ntango tozali kobika kati na yango na nzela ya boyóki Liloba. Ntango elekí. Ntango ya Konetolama ebelemi. Tokómí. Molimo Mosanto asíli ayakí mpe amónisi epai na Mwasi na Ye ya libala makambo nyoso minéne, ya bozindó, ya sekelé.

Tokómí na nsúka, koluka Nzambe; komíbongisa. Tobwákí makambo nyoso ya mokili oyo. Mitungisi ya mokili oyo mizali  elóko te epai na bisó. Kondima ya bisó ematí na misándá ya koleka ndengé etíkalá ndèle kozala. Molimo Mosanto azali kopesa Mwasi na Ye moponami Kondima ya konétolama, mpo Áya mpe kolongola Ye.

Póso iye Ntúkú motóbá na libwá ibétí alimá; bolongwi ya Bayúda ebétí alimá; eleko ya Lingómbá ebétí alimá. Tozali na ntango ya nsúka, ntango ya nsúka, eleko na lingomba ya Laodikia, nsúka na yango. Batindami minzóto nyoso batéí etíndá ya bangó. Ebimí. Tozali sé koséma.

Ntango ya makambo maleki motó nini oyo tozali kobíka kati na yango. Ezali ntango makasi koleka ya ba ntango lokola mongúna azali kobundisa moto nyóso lokola libosó naino soko moké te. Azali kobwakela bisó nyos’oyo azali na yango. Akómí na nsúka, zambí ayebí ete ntango na ye esúkí kosúka.

Kasi na ntango yango moko, totikálá naino kozala na esengo koleka boye te na bomoi na bisó.

  • Totikálá naino te kozala pene na Nkoló boye.
  • Molimo Mosanto atóndísí singa moko na moko ya mosuni ya nzóto ya bisó.
  • Bolingo na bisó mpo na Liloba na Ye etíkálá naino kozala monéne boye te.
  • Emóniseli na bisó ya Liloba na Ye etóndisí bomoto ya bisó.
  • Tozali kolonga mongúná moko na moko  na nzela ya Liloba.

MPE, totíkálá naino kondimisama boye te na oyo ezali bisó:

  • TOBONGÍSÁMÁ LIBOSÓ
  • TOPONÁMÁKÍ
  • TOZUÁMÁKÍ KATI YA EBELÉ
  • MOMBÓTO YA BOKONZI
  • MOLINGAMI WA MOTÉMA
  • OYO YA SEKÓ, ALÁTÍ ELAMBÁ PÉMBÉ, MAMA YESU, KOYÓKA BÁNDE, MONGENGELAMI, NGONDO PETO, OYO ATÓNDI NA MOLIMO, OYO AYEBÍ KOLÓNGAMA TE, OYO ATIAMÍ NA BOKONZI YA MWANA, OYO ABÉBISÁMÍ TE, MWASI LILOBA MOSEKA.

Nini nde ekoya nsima? Libángá lizali koya. Tozali kotálela, kozila mpe kobóndela monúti moko na moko ya mokolo na mokolo. Eloko mosúsu nyoso etali bisó te kasi komíbongisa mpo na boyéi na Ye.

Ezali te: “Tolíkíí bongo”, TOYEBI.

Ntembe izali lisúsu te. Na ntango moké, na ntango ya kobwéta líso ekosíla, mpe tokozala na ngambo mosúsú elongó na balingami na bisó nyoso mpe Ye na Elámbo na bisó ya Libala.

MPE YANGO EZALI SÉ EBANDELI…MPE NSÚKA EZALI TE!!

Yaka komíbongisa mpo na Elámbo yango ya Libala elongó na bisó Lomíngo loye na 12:00 nsima ya nzángá, ntango ya Jeffersonville, lokola Nzambe azali koloba na nzela na mwanje na Ye ya nguya, oyo Atindákí kokamba Mwasi na Ye ya libala, lokola azali koyebisa, mpe komónisa, ba sekelé nyoso ya Nzambe.

Ndeko Joseph Branham

Litéya: 61-0806- Póso Ya Ntúkú Nsambo Ya Danyele