25-0126 Emóniseli, Mokapo Ya Mitano Eteni Ya II

Nsango: 61-0618 Emóniseli, Mokapo Ya Mitano Eteni Ya II

BranhamTabernacle.org

Balingami Bapémi,

Oyo ezali solo mpenza ntango ya Malíli makasi malamu koleka ya bomoi na bisó.

Boyei ya Nkoló ebelemi mpenza. Totiami elembo na Molimó Mosanto; elembo ya bondimami ya Nzambe ete eloko moko na moko oyo Klisto akúfelákí ezali ya bisó.

Tozali sikawa na ndangá ya libulá ya bisó, Molimó Mosanto. Ezali endimiseli, motúya ya libosó, ete tosili toyambámí kati na Klisto. Tozali kopema kati na bilaká ya Nzambe, kolála kati na molungé ya bongengi ya Mói ya Ye; Liloba ya Ye lindimisami, koyóka Mongóngó na Ye.

Ezali ndangá ya lobíko ba bisó. Totungisámi te soko tozali kokende Kúná to te, TOZALI KOKENDE! Toyebi yango boni? Nzambe nde alobaki bongo! Nzambe alakáki yango mpe tozali na ndangá. Tosí tozuakí Yango mpe Klisto andimí bisó.

Ezali te na lolengé ya kotangwa na Yango…likambo ezali ete, tozali wana! Nyoso tosengeli kosala ezali bobele kozila; Akití na nsé kosala mosalá ya Lisiko lokola Ndeko ya moto sikawa mpenza. Tozali na ndangá na yango sikawa mpenza. Tozali bobele kozila ntango ezali Ye kozónga mpo ya bisó. Nsima, na mwa ntango, ya kobweta líso tokozala kosila kokende banso na Elambo ya Libala.

Bobele kokanisa nyos’oyo ezali libosó na bisó. Likanisi na bisó likokí kokótisa yango nyoso na kati te. Mokolo na mokolo Azali komónisa Liloba na Ye koleka, kondimisa ete bilaká binéne biye bizali bia bisó.

MOKILI mozali kopanzana; kopela ya móto, koningana ya mabelé, mpe libebi epai na epai, kasi bandimi Bazali na mobikisi ya sika oyo akobíkisa mokili, mpe akoyéisa eleko ya wólo. Tosili tozuákí Mobikisi na bisó mpe tozaláki na bisó kobika ntango nyoso oyo kati na Eleko na bisó ya Wólo.

Sikawa Azali kútu kolengela bisó mpo ya Emoniseli mingi lokola tozali kokota kati na mokapo ya 5 ya Emoniseli. Azali kotia likambo awa mpo ya bofungwami ya Bilembo Nsambo. Kaka lokola Asaláki kati na mokapo ya 1 ya Emóniseli, kofungola nzela mpo ya Bileko Nsambo ya Lingomba.

Ntango ya Malíli makasi oyo etikali ekoúlana nde na nini mpo ya Mwasi ya libala? Tótala naino yango libosó:

Sikawa, Nazali na ntango te. NAzali na yango ekomami, mwa ntina likoló na yango awa, kasi losámbo na bisó lokolanda libosó ete tókoka kokóta kati na oyo…Ntango mosúsu ekosila Ngai kolongwa na lói la Ngai to ntango mosúsu bongo, Nakolinga kozua póso ntúkú nsambo iye ya Danyele mpe kokangisa yango na kati awa mpenza, mpe kotálisa yango epai wapi ezuí yango na Yubíle ya Kitélá, mpe kozóngisa yango nsima mbala moko elongó na malóz-…bilembo nsambo wana kofungola awa kaka libosó tókende, mpe kotálisa ete ezali na nsúka, oyo…

Ntango ya bikamwa nini oyo Nkoló azali na yango kati na ebómbelo mpo ya Mwasi na Ye ya libala. Komízipola kati na Liloba na Ye libosó na bisó lokola libosó soko moké naino te. Koyikisa bisó mpiko ete tozali baponami na Ye baoyo Azali koyela. Koyebisa bisó ete tozali kati na Mokáno mwa Ye Mobongí Be na botíkakáká na Mongóngó mwa Ye, mpe Liloba Lia Ye.

Tozali kosala nini? Eloko moko te, bobele Kopéma! Kozila! Minyókó lisúsu te, kotungisama lisúsu te, TOZALI KOPEMA LIKOLÓ NA YANGO!

Yáka kopema elongó na bisó Lomíngo loye na 12:00 nsima ya nzángá, ntango ya Jeffersonville, lokola tozali koyóka Mongóngó MONDIMISÁMÍ moa Nzambe komemela bisó

Liteya:

61-0618 – “Emoniseli, Mokapo Ya Mitáno Eteni Ya II”.

Ndeko Joseph Branham