Nsango: 65-1127e NAYOKAKI KASI SIKOYO NAMONI
- 25-0706 NAYOKAKI KASI SIKOYO NAMONI
- 21-1127e NAYOKAKI KASI SIKOYO NAMONI
- 19-1222 NAYOKAKI KASI SIKOYO NAMONI
- 17-1210 NAYOKAKI KASI SIKOYO NAMONI
- 15-1231 NAYOKAKI KASI SIKOYO NAMONI
Molingami Mwasi Ya libala Oyo azali koyóka elongó na nzela ya ekanganeli ya singa,
Lelo, Maloba maye Nzambe alobakí na nzela ya Motindami na Ye Mwanje ya Nsambo mazali NAÍNO KÁKA kokokisama na nzela ya BISÓ, MWASI YA LIBALA YA YESU KLISTO.
Soko Nandimí kati ya bokei na losambo te, mpo ya nini ko Nazali na losambo? Tozalaki na yango kati na mboka mobimba, bazalaki kolanda bisó elongó na nzela ya biyókeli na mpókwa mosúsu, matúmu mánei manso ya kilomètele nkámá mitano na Zómi na mwambe izalakí na moko ya masámbo ya ngai.
Bazalaki kati ya masámbo, ba ndako, matongi maké, mpe kútu etékelo ya pitoló ya mituka; ipalángání kati na Amerika mobimba, koyóka, banso na ntango yango moko mpenza Liloba lizalaki kobima.
Mpe lelo, tozali naino káka MOKO YA MASÁMBO YA YE. Azali NAINO KÁKA MOBATELI NA BISÓ. Liloba ya ye LISENGELI NAINO KÁKA NA NDIMBOLA TE,mpe tozali NAINO KÁKA toyángání útá na mokili mobimba, TOZALI NA EKANGANELI YA BIYÓKELI, koyóka Mongóngó ya Nzambe kobongisa be Mwasi na libala ya Yesu Klisto.
Lelo oyo, Liloba liye lizali naino káka kokokisama.
Mpo ya nini basalákí yango ndèle nsima kuna? Mpo ya nini babáteli bakangaki masámbo ya bango koyóka Etindá na ntango yango mpenza? Bakokaki na bango kaka kozila bázua ba bande, nambísa báteya Etíndá bango moko epai ya bato na bango nsima; mpe nandimisami mingi na bozangáká Emoniseli basalaki yango.
To ntango mosúsu bóko bayebisaki biyanganelo ya bango: “Sikawa bóyóka, tondimi Ndeko Branham azali Mosakoli ya Nzambe, kasi alobaki te ete tosengelákí toyoka ye kati na masámbo ya bisó. Nazali koteya Lomíngo loye, mpe Lomíngo moko na moko; bozwa bobele ba bande mpe Bóyoka yango na ba ndako na bino.”
Mwasi ya libala ndèle, bobele lokola Mwasi ya libala sasaipi, azalaki na Emóniseli, mpe Alingaki koyóka Mongóngó ya Nzambe mbala moko mpo ya bango moko. Balingaki kosangana na Mwasi ya libala kati na mboka mobimba koyóka Mongóngó ya Nzambe lokola ezalaki kobima. Balingaki koyebana lokola moko ya masámbo na ye, ba ndako, to esíká sé esiká ezalaki bango, na Etindá, Mongóngó, mpe sikawa, ba bande.
Lelo oyo, Liloba liye lizali naino káka kokokisama.
Mpo ya nini ba/ tomónáki yango nde bamosusu te? Na boyebaká makambo libosó, tobongisamákí komóna Oyo. Kasi yo oyo obongisamáki te, okomóna Yango sokí moké te. Lisangú lizali komóna Yango mpe libandí komibimisa.
Elingí koloba te ete osengeláki ótika kokende na losámbo na yo. Soko ete Mobateli na yo átika kotéya. Elingí bobele koloba ete ebelé ya batéi mpe babáteli babósaní LIKAMBO YA MOTÚYA, mpe bazángí koyebisa bato na bango ete MONGÓNGÓ YA LITÓMBÁ KOLEKA Osengeli koyóka ezali Mongóngó ya Nzambe likoló ya ba bande.
Kokende na losambo mokolo nyoso ya póso moko moko ekokómisa yo Mwasi ya libala te; yango te nde oyo Nzambe aséngí. Bafalisái na Basadukai bazalaki na boyebi mobimba ya malakisi wana. Bayebaki lilétele moko moko ya Liloba moko na moko, kasi Liloba ya Bomoi azalaki kotelema KAKA WANA kati na mosuni ya moto, kasi basalaki nini? Eloko yango moko mingi mpenza bazali kosala lelo.
Bakoloba: “yango ezalaki bibongiseli nde azalaki kosolola na ntina na bango. Balingaki te kotika Ndeko Branham kati na masámbo na bango kotéya, kasi totéyaka Liloba mpe tolobaka kaka oyo alobákí.”
Ezali bikamwa. Lokúmu na Nkoló. Yango nde osengelaki kosala. Bongo nsima óloba lelo ekeséní, ezali mabe koyóka ba bande ya Ndeko Branham kati ya losámbo na bino. Bokeseni te na Bafalisai mpe Basadukai, to bibongiseli.
Ozali mokosi.
Lokola ezalaki ndèle, Ezali Yesu, atélemí na ekuke kobeta, komeka kokóta na kati koloba mbala moko na Lingomba na Ye, mpe bakofungola bikuke ya bango te, mpe bakoyókisa ba bande na masámbo na bango te. “Akoya kati na losámbo na bisó te mpe koteya”.
Mongúna akobóngola yango mpe kopanza yango na ba nzela motindo na motindo lokola AYINAKA kobimisama polélé, kasi ata ko bongo, ezali komónisama libosó na míso ma bisó mpenza mpe mingi bazali komílongola.
“Na ebandeli ezalaki” [Losambo elobí: “Liloba,”—Mol,”] “mpe Liloba azalaki mboka na” [Nzambe,”] “mpe Liloba azalaki [“Nzambe.”] “Mpe Liloba akomí mosuni mpe afándí kati na bisó.” Ezali solo? Sikawa tomóni Liloba yango moko lilakámí, ya Luka, ya Malaki, bilaká binso biye longwá lelo, bikómí mosuni, kofanda kati na bisó, oyo toyókí na matói na bisó; sikawa tomóní Ye ( na miso ma bisó) kolimbola Liloba na Ye Moko, tolingí ndimbola moko te ya moto. O Lingomba ya Nzambe na bomoi, awa mpe na telefóne, bólamuka nokí, libosó ete ntango éleka mingi!
Bófungola mitema mia bino mpe boyoka oyo Nzambe aútí koyebisa bino, masámbo ma Ye manso. Sikawa tomóní Ye, na míso ma bisó, KOLIMBOLA LILOBA NA YE MOKO. Tolingí ndimbola ata moko te ya moto!! BÓLAMUKA LIBOSÓ ETE NTANGO ÉLEKA MINGI!!
Toyókí makambo maye bomoi na bisó mobimba oyo ekokóma na ntango ya nsúka. Sikawa tomóní na miso ma bisó yango kosálema.
Ayebisaki bisó, ezali NA NZELA SÉ MOKO, YANGO NDE NZELA EPESAMI YA NZAMBE ABONGISAKI MPO YA MWASI NA YE YA LIBALA. BOSENGELI BÓTIKALA NA MONGÓNGÓ YA NZAMBE LIKOLÓ YA BA BANDE.
Nabiangi mokili koya komíbakisa na bisó mokolo mwa Lomíngo na 12:00 nsima ya nzángá, ntango ya Jeffersonville, mpe koyóka Nzelá epesami na Nzambe mpo ya lelo. Na bongo bino mpe bokoki koloba: “Nayokaki mpo na Yo, kasi sikawa Namóní Yo”.
Ndeko Joseph Branham
Liteya: 65-1127E Nayókakí Kasi Sikawa Namóní
Makomí
Genese 17
Esode 14:13-16
Yobo mokapo ya14 mpe 42:1-5
Amosa 3:7
Malako 11:22-26 mpe 14:3-9
Luka 17:28-30