20-0802 Kokambama

BA-MPONGO BAZALI KOSANGANA

Mokanda ya 01/08/2020

Bandeko Balingami ya ba-Bandes

Tozali kobika na ntango moko ya kitoko mingi mpenza. Ndenge Alakaki na kati ya Liloba na Ye, mabombami esili kofungwama pe emonisami na etonga moko ya bato. Kotalisama mobimba ya Moto ya Yesu Klisto esili komonisama polele kati na nzoto ya Mwasi-na-libala na Ye.

Makambo ya mikolo oyo tozali komona kosalema lelo esilaki kotalisama na biso na nzela ya masakoli. Makomi ezali kokokisama mokolo na mokolo. Makambo oyo elobamaki na Biblia ezali kofungolama polele na miso na biso. Tozali kobika sikawa na Eleko ya Mwasi-na-libala.

Tozali momboto ya Nzambe oyo ebongisama liboso mpo na Bomoi na Seko. Azali kobenga biso “Mwasi Moponami  na Ye”, “Mwasi-na-libala na Ye”. Mpo na nini? Mpo tozali Liloba na Nzambe likolo na Liloba. Tozali na fulu moko te na kati na biso, bobele Liloba ya peto ya solo mpo na eleko, Nsango Oyo elobami na biso na nzela ya mosakoli na Ye.

Ezali bobele na eloko moko oyo ekoki kokomisa Lingomba Mwasi-na-libala pe ekoki kopesa Ye KONDIMA ya konetolama oyo esengeli : Malaki 4. Mongongo na Nzambe oyo elobami na nzela ya motindami na Ye.

Nzambe abongisaka ntango nyonso nzela moko mpo na eleko moko na moko. Abongolaka ata moke te mwango na Ye to lolenge na Ye ya kosala makambo, mpo Azali motindo moko lobi, lelo pe libela-na-libela. Nzambe atindaka ntango nyonso mosakoli moko mpo na kokamba bato na Ye. Pe lelo oyo, Asili kotinda mosakoli ya monene koleka ntango nyonso, William Marrion Branham, mpo na kokamba Mwasi-na-libala na Ye.

Ezalaki na bato ya Nzambe minene mosusu na mokili ntango Polo akomaki Biblia, kasi eloko nini Polo atindaki Mwasi-na-libala asala na eleko na ye, BOLANDA NGAI, NDENGE NGAI NAZALI KOLANDA KLISTO.

Na eleko moko na moko, lingomba ekweyaka pe ekotaka na mobulu. Bato batangwaka mosika na Liloba ya Solo pe babakisaka lisosoli na bango moko na yango. Elakamaki kati na Liloba ete molimo ya Dathan pe Koré ekomonisama lisusu na eleko oyo pe ekoloba makambo ndenge moko bango balobaki na ntango wana, ete:”Ozali yo moko mosanto te, biso pe tozali ba-santo, Molimo Mosanto akambaka biso.” Nkolo alobaki na Mose : Kabwana na bato wana. Alobaki na biso nini mokolo na Lomingo?

Bango nyonso wana baliaki eloko yango moko, bango nyonso babinaki na Molimo, bango nyonso bazalalaki na makambo nyonso esika moko, kasi ntango ekomaki eleko ya kokabwana, Liloba ekabolaki. Ezali pe bongo lelo! Liloba esili kokabola!

Liloba ezali kosala ndenge moko lelo. Oyo ezali eleko bobele moko oyo Yesu atelemaki na ekuke pe azalaki kobeta, mpo Abwakamaki libanda. Ezali na nzela bobele moko mpo na KOZALA NA BOSOLO : fungola ekuke pe tika Ye akota wana otikali na Liloba ya ebandeli. Landa motindami ya eleko na biso oyo atatolami pe atalisami polele.

Likambo oyo ekokani lelo na lisolo ya mokambi mozui ya elenge. Bafalisai na Basadukai baboyaki koya epai na Yesu, balingaki koboma Ye, kasi elenge mobali oyo ayebaki ete azangaki eloko oyo esengelaki mpo na kozua Bomoi na seko. Ayebaki ete asengelaki kokende epai na Yesu mpo na kozua eyano ya SOLO, epai na ba-nganganzanbe na ye te, to epai na moto na Nzambe mosusu te, kasi bobele epai na Yesu.

Ntango abelemaki liboso na Yesu, Ye alingaki ye, mpo abokwamaki na ndako ya Baklisto, akokisaki mibeko nyonso ya Nzambe, pe abokwamaki mpo na kondima Liloba. Yesu alobaki na ye ete ezalaki na nzela BOBELE MOKO mpo na kozua Bomoi na Seko : tika makambo nyonso, mosolo na yo, lolendo na yo, pe landa Ye. Likambo yango elekaki mpenza makasi mpo na ye. Bakambi oyo azalaki na bango na bolenge na ye bazalaki na influence mingi likolo na ye kino aboyaki kolanda Nzela bobele moko oyo Nzambe abongisaki.

Ezali pe bongo lelo oyo, bosengeli kolanda nzela bobele moko oyo Nzambe abongisi mpo na kozua Bomoi na Seko.

Okoki koloba :”Nazali na Molimo Mosanto mpo na kokamba ngai.” Ezali ya solo, osengeli kolanda Molimo Mosanto kati na bomoi na yo, kasi mosakoli alobaki :

Bato mingi kati na bino bakanisaka:”Nazali na libatisi ya Molimo Mosanto, Nakokende na Lola.” Yango elingi koloba ata moke te ete okokende na Lola. Te, misié. Okoki kozua libatisi ya Molimo Mosanto ngonga nyonso ya bomoi na yo, pe ata bongo obungi pe okeyi na lifelo. Biblia elobi bongo.

Alobaki ete bosengeli koyeba Moto ya Yesu Klisto mpo na eleko na biso.

Yesu, ntango ayaki, Asengelaki kozala Mosakoli. Ezali solo! Pe lelo oyo, liboso Yesu aya lisusu, komonisama mobimba ya Moto ya Yesu Klisto esengeli kotalisama polele kati na nzoto. Bokanisa naino!

Yo ozali kolanda nani lelo oyo? Nani azali kokamba yo? Mpo na biso ezali Moto ya Yesu Klisto, Mongongo na Nzambe oyo ezali koloba na nzela ya motindami na Ye, oyo ezali kobenga Mwasi-na-libala na Ye abima. Tozali kolanda ye lokola ye azali kolanda Klisto. Pe esilaki komonisama na biso été nzela bobele moko oyo tokoki koyeba na bosolo été tozali na kati ya MOKANO MOBONGI BE na Ye pe tozali kolanda Ye, ezali Kofina Bouton ya kobeta liteya na nzela ya bande.

Ekozala mpenza ntango kitoko mingi mpo na Mwasi-na-libala na Ye mokolo na Lomingo ntango tokosangana na 13h00 , ngonga ya Jeffersonville, mpo na kozala eteni moko ya Makomi oyo ekokokisama, wana Tata akolobela biso na na liteya Kokambama 07.12.1965 , pe akoyebisa biso ete tozali na Kokambama ya solo-solo. Ye akoloba na nzela ya mosakoli na Ye, pe akoyebisa biso ete Azali koya noki mpo na biso, Mwasi-na-libala na Ye.

Ndeko Joseph Branham

Makomi ya kotanga liboso ya koyoka liteya Kokambama, 7.12.1965:

Matai 24:24,
Malako 10:17-22,
Yoane 1:1,
Yoane 14:19,
Ebele 11 :23-29,
Ebele 13 :8,  
Emoniseli Mokapo 22

Liwuti
https://branham.org/fr/articles/7302020_TheEaglesGatheringTogether