20-0705 Klisto Azali Libombami Ya Nzambe Limonisami

Nsango: 63-0728 Klisto Azali Libombami Ya Nzambe Limonisami

BranhamTabernacle.org

Balingami Baponami,

Lelo oyo Mwasi-na-libala ya Klisto azali kosepela lokola esalema naino te na lisolo ya mokili, mpo ete kokokana na Liloba na Nzambe, Asili komonisa biso ete tozali na Bomoi na Seko pe tokoleka na kosambisama te, kasi tosili kolongwa na kufa pe tozali na Bomoi, mpo Ye azwaki kosambisama na biso mpo na biso.

Na sima, Amonisaki biso likambo moko ya koleka, ya monene koleka. Olobi MONENE KOLEKA? Iyo, mpo tozali bobele na Bomoi na Seko te (mpo ekozala na bato nkoto na nkoto oyo bakozwa Bomoi na Seko), kasi Amonisaki pe alobaki na biso ete : “Nazali na eloko moko oyo Nasili kolengela bobele mpo na bino. Eloko moko oyo bango bakozua te, ee, MPO BINO BOZALI MWASI-NA-LIBALA NA NGAI OYO APONAMI PE ABONGISAMA LIBOSO, na yango Nasili kobongisa esika moko elengelami MPENZA BOBELE MPO NA BINO NA NGAI.”

Ata bolali, ata bolali te, ata bosali likambo moko to bosali eloko moko te, ata bokundami esika nini, soki bokundami ata moke te, ata bongo bokoya kaka! Eloko moko te ekopekisa bino. Bokozala wana!”

Tokozala wana pe eloko ata moko te ekotelemisa biso, eloko moko te. Pe ntango tokokoma kuna, tokotonga ba-ndako, pe tokovanda na ba-ndako yango. Tokolona bilanga ya vinyo, pe tokolia mbuma na yango. Tokolona te mpo moto mosusu akitela yango, TOKOLONA bilanga ya vinyo ya biso moko, tokotonga ba-ndako na biso moko, pe tokovanda kati na yango. Tokolekisa Seko-na-seko elongo, moko na moko elongo na Ye lokola Mwasi-na-libala na Ye.

Tozali komilengela mpo na komata na likolo na nguya na Nzambe. Tokomi na suka ya pyramide komilengela mpo na Konetolama. Pe ndenge nini toyebi ete makambo oyo ezali solo? Na nzela na emoniseli. Tosili kososola mokolo na biso, tosili kososola motindami na biso, pe sikawa tosili kososola ba-nani tozali..

Ata bongo, bokoki kokoma kuna bobele soki boyei na Nzela ebongisami na Nzambe. Yango ezali Nsango ya ngonga oyo elobami na nzela ya motindami oyo abongisami na Nzambe. Yango nde nzela moko oyo ebongisami mpo na lelo oyo.

Na Liteya ya sika moko na moko, tozali koyoka Ye kolobela biso lolenge nini Aponaki Mwasi-na-libala oyo akokweya te, oyo akokangama na Liloba yango, ata bato na mokili balobi ndenge nini mpo na Yango. Bango bakokangama na Liloba yango, mpo basili kobongisama liboso mpo na kotelema wana mpo Bazali eteni ya Liloba yango. Bakoyoka nsoni na yango te, kasi bakozala na LIPAMBO ya koloba ete:”Iyo, NAKOFINA BOUTON PLAY.”

Bososoli yango? Soki bokwei, bozongela lisusu bande oyo. Nayebi te ntango molai boni nakozala na bino elongo. Bomikanisela, oyo ezali Solo, ya YANGO ELOBI YAHWEH. Ezali Solo. Ezali Makomi.

Tozali mpenza kozela na motema lukuluku mpo na koyeba eloko nini Akomonisa biso na sima. Tosilaki komona lolenge nini Asangisaki biso elongo na mokili mobimba na ba-ndako na biso mpo na koyoka Bilei na Ye oyo Ebombamaki. Tozomona lolenge nini Azali komonisa makambo oyo tosilaki koyoka mbala na mbala, mbala mingi liboso, mibu na mibu, kasi sikawa ezali komonisama polele.

Kasi Liteya ya sima ekomonisa biso eloko nini?

Soki Nkolo alingi, mpo na kosukisa mayangani mike-mike oyo elandani uta nazalaki awa, mokolo na Lomingo na ntongo, nalingi koloba likolo na likambo moko na motuya mingi.

… likambo nalingi komeka kosala, soki Molimo Mosantu asungi ngai, ezali kozwa Nsango pe esika Yango ezali sikawa, pe kotonga Yango esika Ebandaki, pe kotonga Yango kino na ntango oyo tozali na yango.

Akoyebisa biso esika nini Liloba ebandaki pe akotonga longwa wana kino na mokolo oyo tozali na yango. Mokolo nini oyo mpo na Mwasi-na-libala na Ye.

Nzambe kati na Nzoto na Ye, Klisto; pe Klisto kati na Nzoto na Ye, Mwasi-na-libala. Oh-oh-oh, ee! Nzambe amonisami kati na Klisto, Klisto amonisami kati na Mwasi-na-libala! Pe lokola Nzambe abimisaki na nzoto ya Adama, mwasi, pe ye akweaki; na boye Nzambe abimisaki na nzoto ya Klisto, mosuni na Ye, Nzoto na Ye, oyo ezali Liloba na Ye, pe azali kobimisa Mwasi-na-libala oyo akokweya na nzela na denomination to endimeli moko te. Te, misie. Kasi Akozonga na Liloba na Nzambe ya peto, oyo ezangi litono pe ezali komonisama polele. Nazali na elikia ete mobali nyonso pe mwasi nyonso, oyo akoyoka bande oyo, akososola yango.

Tokoki kozela te mpo na koyoka Nzambe kolobela biso na nzela ya motindami na Ye pe koyebisa biso ete tozali Liloba ya Nzambe yango ya peto, oyo ezangi litono pe ezali komonisama polele, wana tokoyoka bande.

Tosangana elongo zinga-zinga na ba-magnetophones na biso na mokili mobimba, wana tokofanda elongo na bisika ya likolo na ngonga ya 13h00, ngonga ya Jeffersonville, mpo na koyoka Mongongo na Nzambe komonisa biso liteya oyo, KLISTO AZALI LIBOMBAMI NA NZAMBE OYO EMONISAMI, eteyami mokolo ya 28 juillet 1963.

Ndeko Joseph Branham