20-0628 Nzambe Abengaka Moto Na Kosambisama Te Kozanga Kokebisa Ye Liboso

Sango: 63-0724 NZAMBE ABENGAKA MOTO NA KOSAMBISAMA TE KOZANGA KOKEBISA YE LIBOSO

Balingani Bakangami,

Mokangami amikambaka ye moko te na bomoi na ye ya mokolo na mokolo. Balobaka na ye ntango nini akolamuka, ntango nino akolia, ntango nini akokende kolala, miniti moko na moko, ngonga moko na moko, ya mokolo na mokolo. Ezali na moto moko oyo azali kokamba bomoi na ye.

 Nzambe akumisama. Tozali kozongisa matondi mpo na kozala bakangani ya lolenge  wana mpo na Yesu Klisto,  wana Ye azali na bokonzi nyonso likolo na miniti moko na moko ya mokolo nyonso ya bomoi na biso.  Tozali na ntina ya komitungisa te mpo na likambo nini tokosala mokolo na mokolo, to eloko nini ekoki kosalema na mokolo moko na moko, mpo Azali kokamba matambe na biso na nzela mokolo na mokolo. Mabe moko te ekoki kokomela biso mpo Alobelaka biso na ntongo nyonso ete:”Bomitungisa te, Nakozala elongo na bino lelo. Nakotika bino to Nakobosana bino te, Nakozala elongo na bino na matambe nyonso ya nzela.”

Oyo ezali mpenza kobondisama pe kimia mpo na Mwasi-na-libala na Ye. Komitungisa ata moke te na likambo nini ekosalema na mokolo, tozali na bopemi, mpo ELOKO MOKO TE ekoki kokomela biso bobele soki ezali Mokano na Tata. Mposa na biso ezali bobele moko, kosalela Ye, kokanisaka Ye mokolo mobimba pe butu mobimba na nzela ya koumela kati na Liloba na Ye pe koyoka Mongongo na Nzambe kolobela biso wana Azolobela biso ete : “Bozali Liloba na Ngai oyo emonisami polele, Bozali Lingomba na Ngai mpo na eleko oyo.”

Soki tokokaki bobele kobatela yango na makanisi na biso, pe kokokana na Liloba na Nzambe, ete na mikolo oyo ya suka, Akozala na Lingomba moko, Akozala na libota moko. Pe Makambo oyo Ye alakaki, Akokokisa yango. Alobaki ete Akosala yango, pe tozali kobika na ntango yango. Tozali wana, Azali bobele komeka kokomisa biso bakangami ya solo sikawa, baoyo bakangami na kati elongo na Ye.

Nzoto ya Klisto esengeli kokangama na kati elongo na Ye, na position na yango, na boyokani, kosangana elongo na Liloba na Ye. Nsango oyo, Liloba Elobami na Ye, bobele yango nde ekoki kosala ete likambo yango esalema.

Mokolo na mokolo na bomoi na biso, tozomona lolenge Liloba ezali komonisama kati na biso pe na mokili. Tozoyoka Liloba kolobela biso pe koyebisa biso ete tozali Etape ya Sika, Mbuma oyo ezali likolo na Nzete, Adama na Ye oyo azongisami, Lingomba oyo Ye alobaki ete Akozala na yango, baoyo bakobeta ntembe na Liloba ata Moko te.

Na sima, tozomona ete Liloba ezomonisama polele na mokili oyo tozobika na yango mokolo na mokolo. Lisakoli ezali kokokisama, kosambisama ezali likolo na mokili. Mosakoli akebisaki biso wana atalaki na mosika pe amonaki ete likambo moko elingaki kosalema. Na sima alobaki na biso ete atalaki pe amonaki likambo nini ekosalema. Alobaki yango, pe eloko ata moko te na mokili ekoki kotelemisa yango.

Nzambe alakaki ete Akoyeisa kosambisama na mokili ata moke te soki naino akebisi bato te. Asalaka likambo ata moko te soki alobeli yango naino te na mosakoli na Ye likambo nini Alingi kosala. Likebisi epesama ntango nyonso. Makambo oyo tozali komona kosalema na mokili lelo oyo ezali kosalema bobele na pwasa te, ezali kosambisama nde ezosalema zinga-zinga na biso nyonso. Nandimi ete oyo ezali likebisi ya suka na mokili. Ozali kokangama naino na makambo ya mokili ? Nzambe alingi ete biso moko tokabwana na makambo nyonso ya mokili, tokoba te kobika elongo na mokili pe na Nzambe. Akebisi biso ete tomeka komikokanisa na mokili te, kasi tomikokanisa na Nzambe. Totia Ye na Liloba na Ye liboso na makambo nyonso.

Esika nini yo otelemi na Nsango na Ye ya eleko? Etemelo na yo ezali nini ? Esika na yo ezali wapi na oyo etali Liloba elobami oyo ekweyaka te na nzela ya mosakoli na Ye? Ondimaka Liloba nyonso ? Ozali kolanda nzela Nzambe abongisi mpo na eleko oyo, to ozali kotalela bato mosusu to lisanga ya bato?

Kosambisama ezali likolo na mokili, oyo ezali mbela ya suka. Azali koya mpo na Mwasi-na-libala na Ye. Konetolama esili kobelema. Abongisaki nzela ya kokimela na eleko ya Nowa. Nowa alengelaki bato; ezalaki mbela ya mawa liboso na kosambisama, Na mikolo ya Mose, Nzambe abongisaki nzela moko, bosengeli kondima Mose. Ezalaki na nzela bobele moko mpo na kokoma na mboka ya elaka, ezalaki kondima Liloba nyonso pe kolanda motindami na Ye, to kokufa.

Mosakoli akebisaki biso na ntina na mikolo oyo, pe sikawa tozomona makambo yango kotalisama polele. Bomitala malamu soki bozali kati na Masuwa ya Nzambe lelo oyo, Liloba na Ye, Nsango Oyo.

Ndenge tokosangana mbala moko lisusu na mokili mobimba mokolo na Lomingo, na ngonga ya 13h00, ngonga ya Jeffersoville, mpo na koyoka liteya oyo : NZAMBE ABENGAKA MOTO NA KOSAMBISAMA TE KOZANGA KOKEBISA YE LIBOSO, oyo eteyamaki mokolo ya 24 juillet 1963, tika ete totonda Nkolo mpo Asili komonisa biso nzela bobele moko oyo Ye abongiselaki biso mpo na kokima kosambisama na Ye : ezali Liloba na Ye.

Bro. Joseph Branham

Makomi ya kotanga liboso ya koyoka Nsango :

  • Isaya 38:1-5
  • Amosa Mokapo 1