20-0607 Bomoko

Sango: 62-0211 Bokomo

Balingami Oyo Baponama Liboso,

Mokolo moko, totalaki. Tomonaki Liloba elati nzoto. Tomonaki Alifa na Omega. Tomonaki ata moke te bato misato, minei, to mitano; tomonaki bobele moto Moko. Tomonaki Ye lokola Mobikisi na biso. Tomonaki Ye, Liloba. Tomonaki Te, Pole. Tomonaki Ye, Nzambe na Nguya. Tomonaki Nzambe kati na Ye. Tomonaki Likonzi na Moto. Tomonaki mpenza, kati na Ye, makambo oyo Biblia elobaki ete Azalaki. Motindo moko lobi, lelo, pe libela.

Eloko nini totalaki pe tomonaki na eleko na biso? Totalaki na nzela na Liloba pe tomonaki nani Ye azalaki, NA SIMA, totalaki na nzela ya Liloba yango moko pe tomonaki ete Azali motindo moko lelo ndenge Azalaki kalakala. Tondimi ete ezali Yesu Klisto motindo moko, na makambo mike mike nyonso, zanga bobele nzoto na ye mpenza, motindo moko lobi, lelo, pe libela.

Oyo Ye azalaki ntango Azalaki kotambola na Galilaya, Azali motindo yango moko na mpokwa oyo na Jeffersonville, Azali motindo yango moko na Branham Tabernacle. Eloko nini ozotala mpo na komona, mobandisi likambo moko, moto na denomination? Okomona yango ata moke te kati na Yesu. Bozotala mpo na komona nganga-nzambe moko monene? Bokomona yango ata moke te kati na Yesu. Bokomona Yesu ndenge nini? Na nzela na Liloba oyo ezotalisama polele, mpo Ye azali Liloba na Nzambe oyo etalisami polele. Oyo Ye azalaki kalakala, yango nde Azali na mpokwa oyo pe akokoba kozala libela.

Tozotala te mpo na komona motei moko. Tozotala te mpo na komona mokengeli moko. Tozotala te mpo na komona moto moko. Tozotala mpo na komona Yesu Klisto oyo azali komitalisa polele kati na nzoto mbala moko lisusu lokola Alobaki ete Akosala kati na Liloba na Ye.

Eloko nini ezosalema lelo na mokili mobimba, na biteni minei ya mabele, na ba-continent nyonso? Ba-mpongo bazosangana elongo zinga-zinga na Mongongo na Nzambe mpo na eleko na biso. Tozali na ntango ya suka pe tozali kouta na Esti, na Westi, na Nordi pe na Sudi, mpo na komilengela mpo na Konetolama. Tozali kotelema ngwi na ba-miniti moke kino eteni nyonso na bomoto na biso ekotondisama na Molimo Mosanto. Na ntango wana nde tokomata likolo.

Ezali likambo ya kokamwa. Nzambe azokabola bato na Ye, pe na ntango yango moko, Azosangisa bango zinga-zinga na Liloba.

Mwasi-na-Libala asila naino te kosangana zinga-zinga na Nsango oyo ndenge Bazali mpenza na eleko oyo. Ekokaki kosalema ata moke te kino na eleko oyo. Tata asali na makasi ete ba-mokili batelemisa makambo bazalaki kosala, mpo na kolongola bokebi na biso na makambo pamba-pamba ya mokili, mpo na kokabola biso na kozanga kondima nyonso, na kobendama ndenge na ndenge, mpo tokoka kozua esika na biso likolo na Liloba ya eleko na biso, Lotomo monene na Ye ya ba-Bandes.

Asilaki kotia Mwasi-na-libala na Ye na ba-ndako na bango mpo na kotalisa pe komonisa bango eloko bobele moko oyo ekoki kosangisa bango, yango ezali Bilei na Ye oyo ebombamaki pe Asilaki kobongisa yango mpo na eleko oyo.

Soki moto moko alobi ete ntuku libwa na libwa na ntuku libwa na libwa  ya mokama ezali mpenza solo, kasi azokoba kobakisa makanisi na ye moko, mabanzo na ye likolo na Yango, pe alobi ete mabunga ezali, NYONSO Wana ezali Liloba te, bosengeli na eloko mosusu libanda na ba-Bandes, likambo yango ekomema liwa bobele wana. Ekobebisa molongo ya makambo bobele wana, pe bokokweya wana.

Nzela ya koyeba likambo ya solo ezali bobele moko… Botikala na Liloba yango. Boluka-luka yango elongo na Liloba. Eloko nini Ye asalaki kuna na eleko ya Mose? Apesaki bango Likonzi na Moto moko, Apesaki bango mosakoli moko mpo na kokamba bango. Asili kosala lolenge moko mpo na eleko na biso, mpo Nzambe akoki kobongwana te.

Nzambe azotondisa eteni nyonso ya ba-nzoto na biso na Liloba na Ye. Alingi kotondisa makanisi na biso. Alingi kotondisa molimo na biso. Alingi kotondisa eteni moko na moko na biso pe kosala ete tokoka kokufa mobimba mpenza na biso moko, na makanisi na biso, mpo na kotia makambo nyonso na botosi ya Liloba na Ye kino Akobanda kobika mpenza na nzela na biso.

Tozokoma Moko na Ye. Nzambe alati nzoto kati na biso na nzela ya Liloba na Ye. Bomoko na Nzambe ezali kozala na Molimo na Nzambe kati na yo, kozala na boyokani na Liloba, Liloba nyonso, pe kosala ete Emonisama na nguya. Lolenge bobele moko oyo tokoki kokoma na Bomoko na Ye ezali koyoka Liloba na Ye mpo na eleko na biso, yango wana tosangana elongo mokolo

na Lomingo na 13h00, ngonga ya Jeffersonville mpo na koyoka Liloba oyo Asili kobongisa mpo na mokolo oyo, Bomoko, eteyami na 11 février 1962.

Ndeko Joseph Branham